Monoko
L'eveil de bana ya kongo passera-t-il par la politique, la culture, l'éducation et/ou la religion?
Dans quel ordre de priorité ? Avec quels outils ? Pour quels objectifs?
20/09/2021
Mbote na biso banso! !
www.monoko.org, toye kobeta lisolo ya Bobongisi libanda ya masano ya martyres (stade de martyres).
Kasi ya esengo ezali été, misala ya Bobongisi stade des martyres ezali kosalama na bana ya mboka (des congolais).
Ya esengo lisusu ezali ete, na batu oyo bazali kobongisa stade, tomoni ete bandeko basi pe bazwami nakati pe bazali kosala penza mosala.
Nde yango tolingaki tokabola mwa moke lelo.
Totondi bino botondi.
www.monoko.org
10/09/2021
Mbote na biso banso! !
Lelo, na sima ya botamboli moke www.monoko.org, tolekaki bongo na esika oyo babengaka Place commerciale ya Limete oyo ezwami na ntaka ya Limete na 7 ème rue.
Kuna Epayi, tomoni ndenge makambo ebele elakaka kuna.
Na ngambo moko, okola bakangi kelasi, bana bazali koyekola ndenge ya kobeta ndembo ya kitunga to Basket Ball.
Na ngambo mosusu pe bana bazali kobeta ndembo ya makolo.
Soki otali pe na sima, okomona mwa wenze moke. Na wenze yango batekaka biloko ya ntoki ya bokoko lokola : bikeko, mayaka pe bongo na bongo.
Nde yango tolingaki tokabola mwa moke lelo.
Totondi bino botondi.
www.monoko.org
21/06/2021
Mbote à tous! !
Lelo na sima ya mosala, www.monoko.org, totambolaki na kinshasa ata ko bakangi bikala (bar, restaurant) kasi lelo tozalaki na balabala shaba oyo ekenda sango na ntaka ya Kasa-Vubu esika wapi batumbaka mbisi tomononi lolenge nini mbisi ezali kotumbama.
Kasi eloko ekamwisi biso ete kaka ba ndeko babali kaka nde bazali kotumba mbisi kasi ba ndeko basi te.
Nde yango mwa moke tolingaki tokabola lelo na www.monoko.org.
Kaka ndenge tolobaka, soki mwa nkokoso ezali po na liloba moko songolo kota ba www.monoko.org
www.monoko.org.
18/06/2021
Mbote à tous! !
Lelo, www.monoko.org, tolingaki tolakisa biso makambo nini elekaka na eloko nyonso.
Kasi na eleko oyo, www.monoko.org, tomononi ete ezali eleko ya bambuma lokola: malala, ananas, mundenge pe pamplemousse.
Kasi nakotuna-tuna ndeko moko alobi ete pamplemousse na lingala Babengaka yango lilala ya bololo, yango tolingaki totuna po na yo babengaka pamplemousse na lingala nini?
Soki mwa nkokoso ezali po na liloba moko kota na lombango na www.monoko.org.
www.monoko.org
Cliquez ici pour réclamer votre Listage Commercial.
Téléphone
Site Web
Adresse
Kinshasa